faute nyonso ya ngai mei po nalingakiyo
mais mon plus grand defaut na kokala te kobimisa
ce que je ressens dans mon coeur
nga aa papitsho mwe katone eee
nazongi na ndako mayi ya miso ekotanga nga
po na bolingo na pesaki esanga réciprocité
y'okosi ngai na ba serments d'amour
oyo ekomaka ata epayi ya nzambe te
y'onyokoli ya nga motema
yango ko ba remplaçaka te
na se ya mbula nakotoka choc eleki makasi
otala nga mbala mibale aspect e changer souci eledi ee
papitsho ee mwekatone i love you
mabe y'osala y'okende kozongela bolingo na yo ya kala
na tikeli yo tango sima mikolo yanga pe eko koma ya kala
oko luka kozongela nga kasi na kolimbisa yo lokola
ba limbisaka moto awe ee
zalaka na mwa koyeba
noki te okoya kozanga nzobu pona likelele
po moteme na nga e baye ba déception ya l'amour
vie ya mwasi eza compliqué
tango na ye ezalaka mokuse
papitsho ee mwekatone
pasi oyo nazali komona na motema na nga
motema na nga ekotanga makila lokola mwana nzambi sur la croix
lokola pasi bana israël bamonaka na désert
pendant 40 jours et 40 nuits
cette souffrance si profonde ata jиsus akondima te
po na bonheur ya ba cristo
faute nyonso ya ngai mei po nalingakiyo
mais mon plus grand defaut na kokala te kobimisa
ce que je ressens dans mon coeur
nga aa papitsho mwe katone eee
mboloko liboso, moto na kati, imbwa na sima, nani azolanda nani....
tanga kombo ya moto alingaka yo epayi y'ozali
fungola bolingo papitsho eza na maboko ma yo oo
avant osala nga mabe banza que nga nalingakayo
na tango yo na biyenga yeba que nga naza ko souffrir pour toi
tongo etana kala yaka kofungola ngai ata minoti
mohumbu ya bolingo ata imbwa na tongo bakofungolaka ye singa
na tongo ya bolingo moto kala asi akomaki denge
na ndenge ozo kenda na nga kala te okoya kokomisa nga bwenge
nzambe osala nga moto opesa nga ba sentiments
opesa nga tendresses Nzambe opesa nga maboko
kasi moto ya ko caresser Nzambe ozanga kopesa ngai
tango omekaki nga omonaki nga sukali
maloba pe bizaleli na yo ezalaki ya b'angelu
lelo olati elongi ya yuda olobi nga nakomi bololo
na tango ozo sakana pe kobina na kati ya butu
yeba quelque part kaka na kati ya meme butu yango
papitsho mwekatone azo koka te kozua pongi
Posté par : BT AMAL TRES TRES FORT sur zouker.com